Mpo Elingi Nzambe Bolingi bwa Nzambe - Luisa Piccarreta
5 subscribers
10 photos
2 files
118 links
Kobika o Mpo Elingi Nzambe - Luisa Piccarreta
Download Telegram
Biikoma biye bikoki kozwama na internet:

1. NGONGA 24 YA BWALE BWA MOKONZI WA BISO YEZU KRISTU.

2. BOBYANGI BWA MOKONZI NZAMBE.

3. BOBENISI O MPO ELINGI NZAMBE.

Tala na site:⬇️⬇️⬇️

www.divinewilldivinelove.com/Lingala/
BUKU ya LIKOLO - Vol. 12 - 16 mai 1917🖋📃📖📔

Mbano ya ba Ngonga ya Bwale.

Nazalaki na momeseno mwa ngai ya ntango inso, mpe nazalaki o kati ya bomoko bwa ngai na Yezu wa ngai, nta-boboto, mpe nazalaki komisopana o likolo lya bikelamu mpo ya kopesa bango na Yezu. Mpe ye alobaki na ngai ‘te:

«Mwana wa ngai, mbala inso ekelamu ekomibomba o kati ya ngai, ezali kopesa na bikelamu binso ngrasya ya bomoyi bwa Nzambe, mpe na botalaka eye milimo bazali na yango mposa, bazali kozwa yango: eye ezali na makasi te, akozwa makasi; eye azali moto-makasi na kosala se mabe, ezali kozwa mwinda; eye ezali na mpasi, ezali kozwa mpiko, mpe bongo na bongo.»

Na nsima, nabimaki o kati ya ngai; namivandisaki o kati-kati ya milimo mingi – bazalaki lokola milimo misantu miye mizalaki komisukola – miye mizalaki kotanga nkombo ya moto moko oyo ngai nayebaki, mpe oyo awaki kala mingi te. Bayebisaki ngai ‘te azalaki na esengo ya komona ‘te ezali na milimo bakokotaka o purgatorio te soki bazangi elembo ya bangonga ya bwale, mpe bazali kozwa lisalisi mpe bondeko bwa bangonga, mpe bavandi o esika ya malamu. Ata molimo moko te akobutaka o likolo eye bangonga ya bwale ekambi te. Bazali konokisa mawio ma likolo o nse, na purgatorio mpe kuna o likolo.